Kende na makomi
Lingala Facile

Biblia

Biblia mobimba na minɔkɔ mibale, molongo na molongo. Fungolá buku oyo olingi, to komá kombo na yango. Tángá liboso lingála, talelá na français : ezali momekano ya malamu mpo na niveau na yo.

Mpo na kotánga malamu, bandisá miziki (ezali obligatoire te).

AfricaDance · Sebastiao Loopes

Bosolo liboso

Mokanda moko te na mokili ebongolamaka mpe etangamaka mingi koleka Biblia. Ezali référence oyo etalamaka malamu koleka nyonso oyo ezali : vɛrsɛ nyonso emekamaki, ekokanisamaki mpe ebongisamaki na babongoli ya mabota mingi. Mpo na koluka lingala ya solo, eloko eleki yango ezali te.

Yango wana nde ezali na esika na yango awa. Lingala ya vɛrsɛ oyo euti na ba-édition oyo babimisá mpe eyebani malamu, babongoli na ba-équipe, elongo na bato oyo lingala ezali monɔkɔ na bango, uta na makomi ya ebandeli. Tokomi eloko moko te, machine mpe te : liloba nyonso esili koleka na botali wana.

Ba-édition minei ekokani te, moko pembeni ya mosusu, mpe okoki kutu kokokanisa yango : nzela ya kotala soki liloba ezali lingala ya solo. Mpe yango nde ntina ya site mobimba, koteya yo lingala ya solo, na bosɛnzɛli ndenge moko na diksionɛrɛ.

Vɛrsɛ tuku mibale kati na oyo eyebani mingi, mpo na koyeba nani azali Yesu, nini Nsango Malamu ezali koloba, mpe bomoi ya moklisto ezali nini. Talá yango moko-moko.

Makomi eyei te. Talá connexion na yo, mpe meká lisusu.

Maloba ezangi yo ?

Diksionɛrɛ ezali na thème Biblia : Nzambe, losambo, elikya… Yekolá yango, na sima zongá kotánga. Okomona bokeseni.

Fungola diksionɛrɛ